Selemenge na niawu
Khothatso Ranoosi
Marleen Visser

Selemenge alingaka niawu. Ba niawu bazali ebele na ndako.

1

Selemenge azali na niawu moko ya moyindo. Niawu oyo aliaka biloko ebele.

2

Selemenge azali na niawu moko ya monene. Niawu oyo aliaka biloko nioso.

3

Niawu ya misato, akimi na nzete. Niawu akangemi likolo ya nzete.

4

Selemenge amati na nzete, akangemi na nzete na niawu.

Maman ya Selemenge aye kosalisa bango bakita.

5

Selemenge azali na ba niawu mibale ya bolembu, balali libanda na moyi mokolo mobimba.

6

Selemenge azali na ba niawu misato na mosala. Bakangi punku na kikuku na butu.

7

Selemenge azali na mbwua moko. Kombo na ye Lirafi. Lirafi azali na moninga te. Ye alobi.

8

Selemenge ba niawu na yo balingi Lirafi te. Babengani ye libanda ya ndako. Lirafi akimi mosika.

9

Selemenge amoni Lirafi pe amemi ye na ndako. Ba niawu basepeli te. Balingi komona Lirafi lisusu te.

10

Selemenge azali na ba niawu boni? Azali na bango muambe.

11

Selemenge azali na ba mbwua boni? Azali na mbwua moko. Lirafi azali wapi sikoyo?

12

Ozali na ba niawu boni na ndako? Ozali na ba mbwua boni na ndako?

13
You are free to download, copy, translate or adapt this story and use the illustrations as long as you attribute in the following way:
Selemenge na niawu
Author - Khothatso Ranoosi, Marion Drew
Translation - Theresa Nyemba
Illustration - Marleen Visser, Wiehan de Jager
Language - Lingala
Level - First sentences